IN/Prabhupada 0005 - Prabhupada's Life In 3 Minutes



Interview -- September 24, 1968, Seattle

Interviewer: Bokoki koloba pona oyo etali bomóyi oyo eleka? Elingui koloba, balakissa ko yekola yò wapi, yò okomi mondzimi ya krishna ndengué nini.

Prabhupada: Na botami pée bayée'kolissi nga na Calcutta. Calcutta ezali essika oyo na botami. Na botami na mboula oyo 1896, lissoussou nazalaki mwana ya motema ya tata na ngaï Na yango, na banda kellassi na ngaï tango mokié éleka, libanda ya mayée ékweyaki ngaï , na sali lycée ba mboula mwambé. ba mboula mwambé na kellassi ya likolo, Pée lissoussou ba mboula mitano, Souka na koti lingomba ya Gandhi, bossanguissi ékolo mobimba , Na loupémba, na koutani na mollakissi pé tata na ngaï ya molimo, tata na ngaï ya molimo na mboula oyo 1922. Sima na yango, na sepellaki na nzela oyo, lissoussou mokiè'mokiè na boyi kovanda na libota na ngaï. na bali na mboula oyo 1918, tango yango nazalaki na mboula missato na université. Yango na boti bana na ngaï Nazalaki mokondzi. Pée natiki kovanda na libota na ngaï. ba mboula mitano éleka, nazalaki ngaï mokò, ata moto moko té ya libota na ngaï. Na oyo elandzi na ndzimi kossallela mowoumbou ya Nzambé na 1959. Sima na mitiki na mossalla ya ékomeli ba boukóu. Ba bokou na ngaï ya libosso ebimaki na mboula oyo 1962, tango ba boukou missato ebimaki , na komi na mboka na bino na mboula oyo 1965 na komaki na sandza ya Septembre , Yango, na teyaka conscience ya Krishna na Amérique, na Canada, na ba mboka mindelé. Pée lissoussou tofongolaka ba centre mokié'mokié. Bandzimi bako yaka se koyaka. Nazali na élikia pée na kondzima eko koba mikolo oyo ekoyaka.

Interviewer: Yo okoma mondzimi yo moko ndengué nini? Ozalaki kossalla nini libosso ya kokoma mondzimi?

Prabhupada: ékila mossoussou tée; élikia. Moninga na ngaï moko, assali molendé pona akoutana na tata na ngaï ya molimo. Pée tango na lobi yango na tata na ngaï ya molimo, apessi ngouya. Tina ya mokolo wana, mbouma ébotami.